20 Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te.
Boye atunaki epai ya bavandi ya esika wana, na Enayimi : — Wapi mwasi ya ndumba oyo azalaki na nzela, na Enayimi ? Bazongiselaki ye : — Esika oyo etikala kozala na mwasi ya ndumba te.
Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali ; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi.