Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 38:17 - Mokanda na Bomoi

17 Yuda azongisaki : — Nakotindela yo mwana ntaba oyo nakozwa na etonga na ngai. Tamari atunaki lisusu : — Ndanga nini okosimbisa ngai kino tango okotindela ngai yango ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 38:17
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye : — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. Tamari atunaki : — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto ?


Yuda alobaki : — Ndanga nini olingi ete nasimbisa yo ? Tamari azongisaki : — Lopete na yo, singa na yo mpe lingenda na yo, oyo osimbi na loboko. Boye Yuda apesaki ye yango, asangisaki na ye nzoto mpe Tamari akomaki na zemi.


Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te.


Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.


Basi nyonso oyo basalaka kindumba basengaka lifuti ; kasi epai na yo, ezali yo nde opesaka bakado epai ya bamakangu na yo nyonso : na bongo, osombaka mitema na bango mpo ete bawuta bipai na bipai mpe baya kosala ekobo na yo.


Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.


Sima na mwa mikolo, na eleko oyo bakataka ble, Samison azwaki mwana ntaba mpe akendeki kotala mwasi na ye. Alobaki : — Nalingi kokota na shambre epai wapi mwasi na ngai alalaka. Kasi tata ya mwasi na ye apesaki ye nzela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ