Sima na tango molayi, mwana mwasi ya Shuwa, mwasi ya Yuda, akufaki. Lokola tango na ye ya matanga esilaki, Yuda akendeki na Timina epai ya bato oyo bazalaki kolongola bapwale ya bameme na ye. Boye, moninga na ye Ira, moto ya Adulami, akendeki elongo na ye.
Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te.
Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami.
Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia.
Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye : — Yaka, nkolo na ngai ; kimela epai na ngai, kobanga te. Sisera akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli, mpe Yaeli azipaki ye bulangeti.
Davidi alongwaki na Gati mpe akendeki kobombama na lidusu ya libanga ya Adulami. Tango bandeko na ye ya mibali mpe ya libota ya botata na ye bayokaki sango yango, bakitaki kuna epai na ye.