Ebandeli 37:8 - Mokanda na Bomoi8 Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.