« Tozalaki kokanga maboke ya ble kati na bilanga. Mbala moko, liboke na ngai elamuki mpe etelemi ngwi ; bongo maboke na bino, oyo ezalaki zingazinga ya liboke na ngai, egumbamaki liboso ya liboke na ngai. »
Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango : — Bino bozali penza banongi ! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te !
Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali.