Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 37:5 - Mokanda na Bomoi

5 Jozefi alotaki ndoto mpe tango ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali, bayinaki ye lisusu makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 37:5
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »


Na se ya pongi, alotaki ndoto : Amonaki ematelo moko ebanda na mabele mpe songe na yango etutaki likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na ematelo yango.


Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe.


Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi ! » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa. »


Tango bandeko na ye ya mibali bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye koleka bango nyonso, bayinaki ye mpe bakokaki lisusu te koloba na ye na motema malamu.


Alobaki na bango : — Boyoka ndoto oyo nalotaki :


Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki.


Ezalaki mokolo moko na butu, bango mibale, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, balotaki moto na moto ndoto na ye mpe ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango.


Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto : atelemaki pembeni ya ebale Nili,


Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango : — Bino bozali penza banongi ! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te !


Banguna batumbolaki ye, babwakelaki ye makonga mpe babundisaki ye ;


Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye : — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.


Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.


Na mobu ya mibale ya bokonzi na ye, Nabukodonozori alotaki ndoto. Molimo na ye etungisamaki makasi mpe pongi ekimaki ye.


Sima, Daniele ayaki liboso na ngai, mpe nayebisaki ye ndoto yango. Bazalaki kobenga ye Belitsatsari, kombo ya nzambe na ngai. Molimo ya banzambe ya bule ezalaki kati na ye.


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


alobaki : — Boyoka maloba na Ngai ! Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, namimonisaka Ngai moko epai na ye na nzela ya bimoniseli, nalobaka na ye na nzela ya bandoto.


Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ