Sima, bazongisaki elamba yango ya kitoko mpe ya talo epai ya tata na bango. Balobaki : — Tala eloko oyo tomoni ; tala yango malamu soki ezali penza elamba ya mwana na yo to te !
Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata.
Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te !
« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »