Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 37:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tala molongo ya libota ya Jakobi. Elenge mobali Jozefi azalaki na mibu zomi na sambo ya mbotama mpe azalaki kobatela bibwele. Azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko na ye ya mibali, bana ya Bila mpe ya Zilipa, basi ya tata na ye. Jozefi azalaki koyebisa tata na bango makambo mabe ya bandeko na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 37:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafeti ; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.


Tala ndenge likolo mpe mokili elongo na biloko oyo ezali kati na yango ezalaki tango ekelamaki. Tango Yawe Nzambe akelaki mokili mpe likolo,


Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto,


Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye.


Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :


Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.


Atako Jozefi asosolaki ete bazali bandeko na ye, kasi bango basosolaki ye te.


Oyo ezali mobu ya mibale wuta nzala makasi ekotaki na mokili ; mpe na mibu mitano oyo ezali koya, bakolona te mpe bakobuka te.


Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.


Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.


Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.


Mokili ekoki koyina bino te ; kasi Ngai, ezali koyina Ngai mpo ete natatolaka ete misala na yango ezali mabe.


Pamba te, bandeko na ngai, bavandi ya ndako ya Kloe bayebisi ngai ete koswana ezali kati na bino.


Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani ; mpe nazali kondima yango mwa moke.


Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano : mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ