Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »
Tika ete apesa na yo mpe na bakitani na yo lipamboli oyo apesaki na Abrayami mpo ete okamata mokili oyo ozali kovanda lokola mopaya, mokili oyo Nzambe apesaki na Abrayami. »
Magidieli mpe Irami. Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi kolanda bituka na bango, kati na mokili oyo bazalaki kovanda. Ezawu azalaki koko ya bato ya Edomi.
Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango.