Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 34:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 34:2
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi.


Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo.


Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi.


Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo.


Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi : — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.


milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.


Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi.


Davidi atindaki bantoma mpo na kozwa ye. Batisheba ayaki epai ya Davidi, mpe Davidi asangisaki na ye nzoto. Sima na ye komipetola na mbindo na ye, Batisheba azongaki na ndako na ye.


Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye ; mpe lokola alekaki Tamari na makasi, azwaki ye na makasi mpe asangisaki na ye nzoto.


« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.


Soki motema na ngai ekosamaki na mwasi to soki natalaki na makanisi mabe ekuke ya mozalani na ngai,


Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.


Soki mobali asepeli lisusu na mwasi yango te, akotika ye kokende na esika nyonso oyo alingi ; akoki te koteka ye to kokomisa ye lokola mowumbu, pamba te asambwisaki ye.


bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye ; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.


mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango ; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.


Bato ya Isalaele balobaki na bato ya Evi : — Tango mosusu bozalaka kaka pembeni na biso ! Ndenge nini tosala boyokani elongo na bino ?


Mokolo moko, Samison akendeki na Timina mpe amonaki kuna elenge mwasi moko ya Filisitia.


Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ