Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 32:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki : « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 32:7
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo ! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale.


Tango Jakobi amonaki bango, alobaki : « Oyo ezali molako ya Nzambe ! » Mpe abengaki esika yango : Maanayimi.


Na kobanga makasi mpe na komitungisa, Jakobi akabolaki bato oyo bazalaki elongo na ye na masanga mibale ; ndenge moko mpe mpo na bameme, bantaba mpe bashamo.


Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye : ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi.


Tokomata na Beteli epai wapi nakotonga etumbelo mpo na Nzambe oyo ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na pasi mpe azalaki elongo na ngai bisika nyonso oyo nazalaki kokende. »


Bongo kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.


Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.


Soki molimo na ngai elembi kati na ngai, Yo oyebi epai nazali kokende. Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.


Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa ; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.


Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai.


Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe.


Bososoli ekobatela yo, mpe mayele ekobomba yo


Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.


Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.


Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.


Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ