6 Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › »
Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana.
Na kobanga makasi mpe na komitungisa, Jakobi akabolaki bato oyo bazalaki elongo na ye na masanga mibale ; ndenge moko mpe mpo na bameme, bantaba mpe bashamo.
Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye : ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi.
Ezawu alobaki : — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. Kasi Jakobi atunaki : — Mpo na nini kosala bongo ? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai !
Ezawu atunaki : — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini ? Jakobi azongisaki : — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.
Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo ; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.
Rite alobaki : — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi.
Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.