Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 32:5 - Mokanda na Bomoi

5 Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 32:5
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane.


Yango wana, bozwi nyonso oyo Nzambe abotolaki tata na biso ekomi ya biso na bana na biso. Sik’oyo, sala makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki yo.


Yawe ayebisaki Jakobi : « Zonga na mboka ya batata na yo, epai ya bandeko na yo, mpe nakozala na yo elongo. »


Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo ; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango.


Ezawu alobaki : — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. Kasi Jakobi atunaki : — Mpo na nini kosala bongo ? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai !


Ezawu atunaki : — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini ? Jakobi azongisaki : — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.


Bazongisaki : — Obikisi bomoi na biso ! Lokola tozwi ngolu na miso na yo nkolo na biso, tokozala bawumbu ya Faraon.


Mokonzi alobaki na Tsiba : — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. Tsiba alobaki : — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai ! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo !


Boni, nasila koloba na bino : ‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na bino to bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino,


Kasi soki mosali yango amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » mpe akomi kobeta basali mpe basi basali ; kolia, komela masanga mpe kolangwa,


Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.


Ana alobaki : — Tika ete mwasi mowumbu na yo azwa ngolu na miso na yo. Boye Ana azongaki, aliaki mpe elongi na ye ezalaki lisusu ya mawa te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ