— Yoka biso, nkolo na ngai ; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo.
Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »
Izaki azongiselaki Ezawu : — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ?
Navandi na ndako na yo mibu tuku mibale : nasalelaki yo mibu zomi na minei mpo na bana na yo mibale ya basi, mpe mibu motoba mpo na bibwele na yo ; mbala zomi obongolaki lifuti na ngai.
Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? ›
Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo.
Boye, tika ete nkolo na ngai akende liboso, wana ngai nakotambola malembe-malembe na sima, kolanda etamboli ya bibwele oyo ezali liboso na ngai, mpe kolanda etamboli ya bana, kino nakokoma epai ya nkolo na ngai, na Seiri.
Ezawu atunaki : — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini ? Jakobi azongisaki : — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.
Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.
Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye : — Mosali na yo Beni-Adadi abondeli yo ete oboma ye te. Akabi atunaki : — Boni, azali nanu na bomoi ? Azali kaka ndeko na ngai.
Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo ; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,
Saulo asosolaki ete ezali mongongo ya Davidi mpe alobaki : — Oyo wana ezali mongongo na yo Davidi, mwana na ngai. Davidi azongisaki : — Solo, ezali mongongo na ngai, oh mokonzi, nkolo na ngai.