Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye : ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi.
Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki.
Yango wana, kino na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagoni mpe bato mosusu oyo bakotaka na tempelo ya nzambe Dagoni, na Asidodi, banyataka zingazinga ya ekotelo te.