Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 32:31 - Mokanda na Bomoi

31 Jakobi abengaki esika yango « Penieli, » pamba te alobaki : « Namoni Nzambe na miso na ngai, mpe bomoi na ngai ebiki. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 32:31
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai.


Tango kaka tongo etanaki, ba-anjelu batungisaki Loti mpe balobaki : — Sala noki, kamata mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa ; soki te, bokobebisama tango engumba oyo ekozwa etumbu.


Jakobi atikalaki kaka ye moko. Bongo moto moko abundaki na ye kino tango tongo elingaki kotana.


Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye.


Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli.


Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki : « Bala, yanola biso ! » Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.


Nalobaki : « Kopesa nzela te ete basepela na tina na ngai to bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »


epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo.


Kasi Nzambe asembolaki loboko na Ye te mpo na kobeta bakambi ya Isalaele ; bamonaki Nzambe, baliaki mpe bamelaki.


Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »


Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai.


Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.


Balobaki : « Yawe, Nzambe na biso, alakisi biso nkembo na Ye mpe lokumu na Ye ; mpe toyoki mongongo na Ye wuta na moto. Lelo, tomoni ete moto akoki kozala na bomoi ata soki Nzambe asololi na ye.


Pamba te nani kati na mokili akoki koyoka mongongo ya Nzambe na bomoi koloba kati na moto ndenge biso toyokaki bongo atikala na bomoi ?


Tango Jedeon asosolaki ete Ye oyo azalaki elongo na ye azali Anjelu ya Yawe, agangaki : « Nkolo Yawe, mawa na ngai ! Pamba te namoni Anjelu ya Yawe, miso na miso. »


Kasi Yawe alobaki na ye : — Zala na kimia ! Kobanga te.


Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ