Tango kaka nalekaki bango, mbala moko, namonaki mobali oyo motema na ngai elingaka. Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende. Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai, na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.
Kingo na yo ezali lokola ndako molayi oyo batonga na pembe ya nzoko. Miso na yo ezali lokola maziba ya engumba Eshiboni, pembeni ya ekuke ya Bati-Rabimi. Zolo na yo ezali lokola ndako molayi ya Libani oyo etalani na Damasi.
Tala liloba oyo Yawe, Mosantu ya Isalaele mpe Mokeli na ye, alobi : Boni, bino nde bato bokotuna Ngai soki nakosala nini mpo na bana na Ngai na mikolo oyo ekoya to bino nde bato bokopesa Ngai mitindo mpo na mosala oyo maboko na Ngai esali ?
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Tika Ngai kosala : nakobebisa bango mpe nakolimwisa bakombo na bango kati na mokili, kasi nakokomisa yo ekolo ya nguya mpe ya bato ebele koleka bango. »
Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.