Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 32:2 - Mokanda na Bomoi

2 Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 32:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi akendeki na Maanayimi, mpe Abisalomi akatisaki Yordani elongo na bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki elongo na ye.


Abineri, mwana mobali ya Neri, elongo na bato ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, babimaki wuta na Maanayimi mpo na kokende na Gabaoni.


Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi.


Mpe yeba ete, elongo na yo, ozali na Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya Benjame, na mboka Bawurimi, oyo alakelaki ngai mabe makasi na mokolo oyo nazalaki kokende na Maanayimi. Tango ayaki kokutana na ngai na Yordani, nalapaki ndayi oyo mpo na ye na Kombo na Yawe : ‹ Nakoboma yo na mopanga te. ›


Ayinadabi, mwana mobali ya Ido : moyangeli ya Maanayimi ;


Elize asambelaki : — Oh Yawe, fungola ye miso mpo ete amona ! Yawe afungolaki miso ya mosali, mpe mosali atalaki ; amonaki bangomba mike etonda na bampunda mpe bashar ya moto zingazinga ya Elize.


Basungaki makasi Davidi mpe mampinga na ye, pamba te bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko mpe bakomaki bakonzi ya basoda.


Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonso oyo bokokisaka mokano na Ye.


Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso ; bokumisa Ye, bino mampinga na Ye nyonso ;


Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ? Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azali Mokonzi ya nkembo !


Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye ; abikisaki ye na pasi na ye nyonso.


Boye, elobaki : — Boni, oyebi mpo na nini nayei epai na yo ? Sik’oyo, nakomi pene ya kozonga mpo na kobundisa mokambi ya Persi ; mpe tango ngai nakokende, mokambi ya Grese akoya ;


Mbala moko, ba-anjelu ebele ya mampinga ya Likolo bayaki kosangana na anjelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba :


Kati na libota ya Gadi : Ramoti, kati na Galadi, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Maanayimi,


Azongiselaki Jozue : — Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe ; nayei kaka sik’oyo. Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye : — Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ