16 shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi.
Akabolaki yango na bitonga mpe apesaki yango epai ya basali na ye. Alobaki na bango : « Boleka liboso na ngai mpe botia etonga moko mosika na mosusu. »
Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele : « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu.