Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »
Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye : « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo.
Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi ; mpe koswana na moto ezali lokola kokanga bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.
Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.
Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo, bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama ; ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli na mokolo ya bitumba, tango bamama mpe bana na bango bakweyaki na mabele.