Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 30:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 30:9
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.


Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.


Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.


Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali.


Nzambe ayokelaki Lea mawa, akomaki na zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mitano.


Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto,


Rasheli alobaki : « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. »


Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi ; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ