8 Rasheli alobaki : « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. »
— Yoka biso, nkolo na ngai ; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo.
Sima na yango, Bila, mwasi mosali ya Rasheli, azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye.
Bana mibali ya Bila, mwasi mosali ya Rasheli : Dani mpe Nefitali.
Bana mibali ya Nefitali : Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shilemi.
Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi, oyo ebotaka bana kitoko.
Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.
Mpe bato ya libota ya Nefitali bakozala pembeni ya bato ya libota ya Aseri. Mokambi ya bato ya Nefitali ezali Akira, mwana mobali ya Enani.
Kasi avandaki na Nazareti te ; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali,
Mpo na Nefitali alobaki : « Nefitali atondi na bolamu mpe na mapamboli na Yawe, akozwa libula ya weste mpe ya sude. »
Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.