Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 30:4 - Mokanda na Bomoi

4 Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 30:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sarayi alobaki na Abrami : — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. Abrami ayokaki maloba ya Sarayi.


ayebisaki Abrayami : « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. »


Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana : Teba, Gami, Taashi mpe Maaka.


Abrayami abalaki mwasi mosusu, kombo na ye « Ketura. »


Kasi wana Abrayami azalaki nanu na bomoi, apesaki bakado epai ya bana mibali ya bamakangu na ye mpe atindaki bango na mokili ya este, mosika ya mwana na ye ya mobali Izaki.


Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.


mpe Bila akomaki na zemi. Abotelaki Jakobi mwana mobali.


Atiaki basali ya basi elongo na bana na bango na liboso ; Lea mpe bana na ye na sima ; mpe Rasheli na Jozefi na suka.


Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :


Bango nde bazalaki bana mibali oyo Bila abotelaki Jakobi ; bango nyonso bazalaki sambo. Bila azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya mwana na ye ya mwasi Rasheli.


Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakoyeisa pasi epai na yo wuta na ndako na yo moko ; na miso na yo, nakokamata basi na yo mpe nakopesa bango na moko kati na baninga na yo, oyo akosangisa na bango nzoto na moyi makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ