Ebandeli 30:34 - Mokanda na Bomoi34 Labani alobaki : — Iyo ! Tika ete ezala ndenge olobi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kaka na mokolo wana, Labani alongolaki kati na bibwele, bantaba ya mibali ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, bantaba nyonso ya basi ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, mpe bibwele nyonso oyo ezalaki mwa pembe mpe mwa mwindo kati na bana meme. Apesaki yango na maboko ya bana na ye ya mibali.