Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 30:2 - Mokanda na Bomoi

2 Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki : — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 30:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sarayi alobaki na Abrami : — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. Abrami ayokaki maloba ya Sarayi.


pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami.


Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi.


Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te.


Bongo Jakobi asilikaki mpe aswanisaki Labani. Alobaki na ye : — Mbeba nini nasalaki ? Lisumu nini nasalaki mpo ete olanda ngai na kanda boye ?


Kasi Jozefi alobaki na bango : — Bobanga te ! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe ?


Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! »


Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !


Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.


Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.


mpe agangaki na mongongo makasi : — Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo !


Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.


Kasi epai ya Ana, azalaki kopesa biteni yango mbala mibale, pamba te azalaki kolinga ye, atako Yawe akangaki ye mabota.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ