Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 30:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 30:1
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te.


Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.


Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.


Nani akoki kofunda ngai ? Soki te, nakokanga monoko mpe nakokufa.


Mpo na nini namikufelaki te kati na libumu ya mama na ngai ? Mpo na nini nakataki motema te tango nabimaki na libumu ya mama na ngai ?


Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.


Kati na molako, basalaki zuwa, batelemelaki Moyize mpe Aron, mosantu ya Yawe.


Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto, kasi bilulela epolisaka mikuwa.


Mboka ya bakufi, libumu ya mwasi oyo abotaka te, mabele oyo etondaka mayi te, mpe moto oyo elobaka te : « Ekoki ! »


Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Soki ezali kaka boye nde ozali kosala ngai, eleki malamu ete oboma ngai kaka sik’oyo. Soki nazwi ngolu na miso na Yo, kotika te ete namona kobebisama na ngai.


Kasi Moyize azongisaki : — Boni, okosalela ngai zuwa na likambo nini ? Nakosepela kutu ete bato nyonso bakoma basakoli mpe Yawe akitisa Molimo na Ye epai na bango !


Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile.


(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).


pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?


Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.


likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso : bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.


Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.


Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo mpe na molimo ya koswana, wana botika komikumisa ete bozali bato ya bwanya ; pamba te yango ezali solo te, ezali lokuta.


Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? »


Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ