Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nyoka alobaki na mwasi : — Solo penza, bokokufa te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 3:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe Nzambe alobaki na mwasi : — Mpo nini osali bongo ? Mwasi azongisaki : — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.


Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. »


Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »


Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › » Boye Eliya akendeki.


Bazongisaki : — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. »


Elize azongisaki : — Loba na ye : « Solo, okobika na bokono oyo. » Nzokande, Yawe amonisi ngai ete akokufa.


Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. »


Amilobelaka : « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »


Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.


Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.


mpo ete Satana akonza biso te, pamba te toyebi malamu makanisi na ye.


Yawe akolimbisa ye te ; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili.


Ezali Adamu te moto akosamaki ; ezali mwasi nde akosamaki mpe abukaki mobeko ya Nzambe,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ