Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 3:24 - Mokanda na Bomoi

24 Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 3:24
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.


Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »


Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.


Okomisaka bantoma na Yo mipepe, mpe basali na Yo, ndemo ya moto.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.


Yawe azali kokonza ; tika ete bato balenga ! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ; tika ete mabele eningana !


— Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu.


Tango natalaki, namonaki na mapata, na likolo ya mito ya basheribe, eloko moko lokola libanga ya talo oyo babengaka safiri ; mpe na likolo ya libanga yango, eloko moko ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi.


nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango ;


Tango ane emonaki anjelu ya Yawe atelema na kati-kati ya nzela na mopanga ya minu na loboko na ye, ane ebimaki na nzela mpe ekimaki na elanga. Boye, Balami abetaki ane mpo ete ekoka kozonga na nzela.


Yesu azongiselaki ye : — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.


Nzokande, tala makambo oyo Nzambe aloba na tina na ba-anjelu : « Akomisaka ba-anjelu na Ye mipepe, mpe basali na Ye, ndemo ya moto. »


Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye ; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye : — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso ?


Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ