Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 3:22 - Mokanda na Bomoi

22 Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 3:22
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! »


Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga ; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe.


Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango.


Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.


Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye  : koyeba malamu na mabe.


Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani, nakokisaka bandayi na ngai na miso ya bato oyo batosaka Yo.


Bwanya ezali nzete ya bomoi mpo na bato oyo basimbaka yango ; bato oyo bakokanga yango makasi bakozala na esengo.


Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »


Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.


Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza ; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ