Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 3:18 - Mokanda na Bomoi

18 Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. Okolia matiti ya bilanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 3:18
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.


Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »


Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »


tika ete banzube ebima na esika ya ble, mpe matiti mabe ebima na esika ya orje. » Oyo nde suka ya maloba ya Yobo.


Tika ete moto oyo azali na nzala asilisa mbuma ya elanga na ye, akamata yango kino kati na basende ; mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! ›


omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.


Ozongisaka moto na putulu, pamba te oloba : « Bino bato, bozonga na putulu ! »


Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.


bongo, tala ndenge etondi na banzube, tala ndenge matiti mabe ezipi yango, mpe mir na yango ya mabanga ebukani.


mpe mpo na mokili ya bato na ngai ; pamba te mokili oyo eboti basende mpe banzube. Solo, bolela mpo na bandako nyonso ya kitoko mpe mpo na engumba oyo etonda na bisengo,


Nakokomisa yango esobe : kati na yango, bakolongola lisusu te, ezala mabanga to matiti ; bongo banzube mpe basende ekokola kuna. Nakopesa mitindo na mapata ete enokisela yango lisusu mvula te.


Na mokolo wana, esika nyonso oyo ezalaki na banzete ya vino nkoto moko oyo ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ekotonda na basende mpe na banzube.


Bato bakokota kuna na matolotolo mpe na bambanzi, pamba te mokili ekotonda na basende mpe na banzube.


Bakolona ble, kasi bakobuka banzube ; bakobimisa mitoki na mosala, kasi bakozwa litomba ya malonga te. Boye, boyokela mbuma ya bilanga na bino soni, mpo na kanda makasi ya Yawe.


Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokata bilanga ya sika, mpe botika kolona kati na banzube.


Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ;


Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda.


Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka lisusu na tina te, ezalaka mosika te ya kolakelama mabe, mpe esukaka na kozika na moto.


boyeba ete Yawe, Nzambe na bino, akobengana lisusu te bikolo yango liboso na bino. Bakokoma nde minyama mpe mitambo mpo na bino, bafimbu na mikongo na bino mpe banzube kati na miso na bino, kino tango bokosila kokufa na mokili ya kitoko oyo Nzambe na bino apesaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ