Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 3:17 - Mokanda na Bomoi

17 Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 3:17
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki : — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ?


Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. Okolia matiti ya bilanga.


Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango.


Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. »


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Moto oyo abotama na mwasi azalaka kaka na mikolo moke oyo mpe etonda na pasi.


Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? Mbala boni pasi ezali kokitela bango ? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?


Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei ; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi.


Boye, tango natali misala nyonso oyo maboko na ngai esalaki mpe pasi nyonso oyo namonaki mpo na kokokisa yango, namoni ete nyonso wana ezalaki kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe, ezali na yango na litomba moko te na se ya moyi.


Boye, nayinaki bomoi, pamba te misala oyo esalemaka na se ya moyi ezali mabe mpo na ngai. Nyonso wana ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Mpo na yango, tala likambo oyo ngai namoni ete ezali malamu : ebongi na moto kolia, komela mpe kosepela na mbuma ya mosala na ye na se ya moyi, na mikolo ya bomoi oyo Nzambe apesi ye, pamba te yango nde libula na ye.


Atunaki ye : « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala ? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa.


Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »


Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.


Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka lisusu na tina te, ezalaka mosika te ya kolakelama mabe, mpe esukaka na kozika na moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ