Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 3:16 - Mokanda na Bomoi

16 Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 3:16
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.


Yaebetsi azalaki na lokumu mingi koleka bandeko na ye ya mibali. Mama na ye apesaki ye kombo « Yaebetsi » mpo na koloba : « Nabotaki yo na pasi. »


Boye tango mobeko ya mokonzi ekopanzana na mokili na ye mobimba, basi nyonso bakotosa mibali na bango, ezala babola to bazwi.


Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.


Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te ; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.


Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi, pasi moko ya makasi penza ekangi ngai lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo, mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele.


Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.


Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi na se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki. Okokoma na pasi te lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?


Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !


Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »


Bato ya Damasi balembi nzoto, bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango ; kobanga mpe pasi ezwi bango lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Tango toyokaki sango na tina na bango, tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Kasi soki mobali na ye akweyisi yango tango ayoki yango, ndayi moko te to ekateli moko te oyo ebimaki na monoko na ye ekotikala bongo. Pamba te mobali na ye akweyisi yango, mpe Yawe akotangela ye yango lokola niongo te.


Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.


Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.


basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka.


Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye.


Basi, botosaka mibali na bino ndenge ebongi kati na Nkolo.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


Solo Nzambe asalaki liboso Adamu, mpe sima, Eva.


kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.


komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ