12 Adamu azongisaki : — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.
Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »
Yango wana, mobali apesaki bakombo na bibwele nyonso, na bandeke nyonso ya likolo mpe na banyama nyonso ya zamba. Kasi amonaki te mosungi oyo akokaki kozala ndenge moko na ye.
Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.
Nzambe alobaki : — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ?
soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki to nabombaki yango na motema na ngai,
Bozoba ya moto ebebisaka bomoi na ye ; mpe, na sima, akomaka kotombokela Yawe.
Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.
Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu : — Nani azali moninga na ngai ?
Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.
Saulo azongisaki : — Basoda babotolaki yango na maboko ya bato ya Amaleki ; babatelaki kati na bibwele bameme mpe bangombe oyo elekaki kitoko mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na biso ; kasi nyonso wana mosusu, tobebisaki yango penza.