Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 3:10 - Mokanda na Bomoi

10 Azongisaki : — Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 3:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu mpe bazalaki koyokana soni te.


Nzambe alobaki : — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ?


Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki.


Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi ; mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso, nazali kobanga Ye.


soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki to nabombaki yango na motema na ngai,


Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.


Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika


mpe balobaki na Moyize : — Tika ete yo moko oloba na biso, mpe tokoyoka yo ; kasi Nzambe te, noki te tokokufa !


Alobaki lisusu : — Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe.


Moyize amonaki ete bato bazalaki kati na mobulu, pamba te Aron akambaki bango mabe ; yango wana bakomaki eloko ya kotiola na miso ya banguna na bango.


Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »


Bolumbu na yo ekomonana, mpe soni na yo ekobombama te. Nakozongisa mabe na mabe, mpe moto moko te akopekisa Ngai.


Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?


Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye ? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso.


pamba te soki ata mitema na biso elongisi biso te, toyebi ete Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi nyonso.


Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ