Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 3:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi : — Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 3:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ; kasi mawa na moto oyo akweyi mpe azangi moto oyo akosunga ye !


Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani, nyoka oyo ekimaka, na Leviatani, nyoka ya somo, na nzela ya mopanga na Ye ya minu, mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ; akoboma elima ya ebale monene.


Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.


Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye : — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa.


mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama : « Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo, mpe bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te. »


alobaki na Ye : — Nakopesa yo nyonso oyo ozali komona, soki kaka ofukameli ngai mpe ogumbameli ngai.


Ezali likambo ya kokamwa te, pamba te Satana mpe amikomisaka lokola anjelu ya pole.


Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.


Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.


Bongo nyoka esanzaki wuta na monoko na yango, na sima ya mwasi, mayi ebele lokola ebale, mpo ete atiola na mbonge na yango.


Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.


Akamataki dalagona, nyoka wana ya kala oyo azali zabolo to Satana ; akangaki ye monyololo mpo na mibu nkoto moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ