Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 28:7 - Mokanda na Bomoi

7 Jakobi atosaki tata na ye mpe mama na ye, mpe akendeki na Padani-Arami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 28:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.


Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.


Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi ; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. »


Bongo Ezawu asosolaki ete Izaki, tata na ye, azalaki kosepela te na bana basi ya Kanana.


Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;


Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.


Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo.


mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.


Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ