5 Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana. Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango : — Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.
Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto ; alobaki na ye : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
Bato ya Siri mpe bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo mabanga ya emerode, maputa ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bilamba ya lino ya kitoko, mabanga ya korayi mpe ya ribi.
Lokola Galadi etondi na mabe, ekokoma eloko pamba mpo ete bato na yango babonzaki bangombe ya mibali na Giligali ; mpe bitumbelo na bango ekobukama mpe ekokoma mipiku ya mabanga kati na banzela ya mikala ya bilanga.
Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo : « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga ; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele.