2 Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.
Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi.
mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.
Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana.
Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. ›
Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba.
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami ; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato.
Lokola Galadi etondi na mabe, ekokoma eloko pamba mpo ete bato na yango babonzaki bangombe ya mibali na Giligali ; mpe bitumbelo na bango ekobukama mpe ekokoma mipiku ya mabanga kati na banzela ya mikala ya bilanga.