8 Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo :
Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »
Mama na ye alobaki : — Mwana na ngai, tika ete bilakeli mabe yango ekweya likolo na ngai ; yo, sala kaka makambo oyo ngai nayebisi yo.
Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.
« Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. »
Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka.
Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango : — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?
Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki : — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te !
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo.