40 Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.
Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »
Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »
Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › »
Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Solo, olongi Edomi, mpe motema na yo ezali komikumisa. Sepela na yo, kasi vanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda ?
Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela ; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo.
Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokelaki Yorami, pamba te Yorami asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye.