Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! »
Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.
Jakobi alobaki na tata na ye : — Nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso. Nasali ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, lamuka, vanda mpe lia nyama, mpo ete opambola ngai.
Izaki alobaki : — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.
Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.
Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango,
Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.
Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.