Izaki alobaki : — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.
Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.
Boye Joabi akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Mokonzi abengisaki Abisalomi, mpe Abisalomi akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki elongi kino na mabele, mpe mokonzi ayambaki ye.