Izaki alobaki : — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.
Mosakoli ya mobange azongisaki : — Ngai mpe nazali mosakoli lokola yo. Anjelu moko ya Yawe alobaki na ngai kolanda etinda na Yawe : « Zonga na ye nzela moko na ndako na yo mpo ete alia lipa mpe amela mayi. » Nzokande azalaki kokosa ye.
Tala makambo oyo bosengeli kosala : Tika ete moko na moko kati na bino alobaka solo na moninga na ye ; bosambisaka na bosolo mpe bokataka makambo na bosembo kati na bisambiselo na bino,
Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi : — Mpo na nini ozali yo moko ? Mpo na nini ezali na moto moko te elongo na yo ?
Tango Akishi atunaki : — Bobundi wapi lelo ? Davidi azongisaki : — Tobundi na sude ya Yuda, na sude ya mokili ya bato ya Yerameeli, mpe na sude ya mokili ya bato ya Keni.