Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai ; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te.
Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
« Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?
Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »