Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 27:19 - Mokanda na Bomoi

19 Jakobi alobaki na tata na ye : — Nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso. Nasali ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, lamuka, vanda mpe lia nyama, mpo ete opambola ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 27:19
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lipasa ya liboso oyo abimaki azalaki motane mpe nzoto na ye mobimba ezalaki etonda na bapwale lokola elamba ya bapwale ; yango wana babengaki ye « Ezawu. »


Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu ; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi.


Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki : — Tata na ngai ! Izaki azongisaki : — Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ?


Izaki alobaki na Jakobi : — Mwana na ngai, pusana pembeni na ngai mpo ete nasimba yo mpe nayeba soki ozali solo mwana na ngai Ezawu.


Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye : — Tata na ngai, telema mpe lia nyama na ngai mpo ete opambola ngai.


Izaki alobaki : — Ndeko na yo ayaki na mayele mabe, ayibi mapamboli na yo.


Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.


Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › »


Mosakoli ya mobange azongisaki : — Ngai mpe nazali mosakoli lokola yo. Anjelu moko ya Yawe alobaki na ngai kolanda etinda na Yawe : « Zonga na ye nzela moko na ndako na yo mpo ete alia lipa mpe amela mayi. » Nzokande azalaki kokosa ye.


Jeroboami alobaki na mwasi na ye : — Mibongola mpo ete bato bayeba te ete ozali mwasi ya mokonzi Jeroboami ; bongo, kende na Silo. Mosakoli Ayiya azali kuna ; ye nde alobaki na ngai ete nakozala mokonzi ya bato oyo.


Bozali koloba : « Tosalaki boyokani elongo na kufa, boyokani elongo na mboka ya bakufi. Tango likama ya makasi ekoya, ekozwa biso te ; pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ