17 Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki.
Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.
Azipaki ye maboko mpe kingo na poso ya bana ntaba.
Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki : — Tata na ngai ! Izaki azongisaki : — Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ?
Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.