Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 27:14 - Mokanda na Bomoi

14 Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 27:14
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu ; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi.


Mama na ye alobaki : — Mwana na ngai, tika ete bilakeli mabe yango ekweya likolo na ngai ; yo, sala kaka makambo oyo ngai nayebisi yo.


Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.


Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki.


Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye : — Tata na ngai, telema mpe lia nyama na ngai mpo ete opambola ngai.


Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.


« Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. »


Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka.


Kotindika motema na ngai te na mabe, mpo ete namipesa te na mobulu elongo na bato ya misala mabe mpe nalia bilei te elongo na bango.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ