Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 27:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mama na ye alobaki : — Mwana na ngai, tika ete bilakeli mabe yango ekweya likolo na ngai ; yo, sala kaka makambo oyo ngai nayebisi yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 27:13
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »


Kasi Jakobi alobaki : — Lapa liboso ndayi. Ezawu alapaki ndayi epai ya Jakobi ; mpe na nzela wana, atekaki boyaya na ye epai ya Jakobi.


Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.


Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.


Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo :


Nandimi kobatela ye ; boye okotuna ye na maboko na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe namemi ye liboso na yo te, tika ete nazala na ngambo epai na yo bomoi na ngai mobimba.


Kasi mwasi ya mboka Tekoa alobaki na mokonzi : — Oh mokonzi, nkolo na ngai, tika ete ngambo ekweya na moto na ngai mpe na libota ya tata na ngai ; kasi tika ete mokonzi mpe kiti na ye ya bokonzi bazala mosika ya likambo oyo.


Ye mpe alandaki banzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango, pamba te mama na ye, na nzela ya batoli na ye, azalaki kotindika ye na kosala mabe.


Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !


Akweyaki na makolo ya Davidi mpe alobaki : — Oh nkolo na ngai, tika ete mbeba ezala kaka na moto na ngai ! Nabondeli yo, tika ete mwasi mosali na yo asolola na yo ! Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo alingi koyebisa yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ