Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 27:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye : — Mwana na ngai ! Ezawu azongisaki : — Ngai oyo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 27:1
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Jakobi alobaki : — Lapa liboso ndayi. Ezawu alapaki ndayi epai ya Jakobi ; mpe na nzela wana, atekaki boyaya na ye epai ya Jakobi.


Miso ya Isalaele elembaki mpo na kimobange mpe azalaki komona lisusu malamu te. Yango wana, Jozefi apusaki bana na ye ya mibali pembeni ya tata na ye, Isalaele apesaki bango beze mpe ayambaki bango.


Mwasi ya Jeroboami asalaki makambo oyo mobali na ye atindaki ye : akendeki na Silo mpe akotaki na ndako ya Ayiya. Nzokande, Ayiya azalaki komona lisusu te, pamba te miso na ye ekufaki mpo ete akomaki mobange.


tango bakengeli ya ndako bakolenga, mpe bato ya makasi bakofukama ; tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango mpo ete bazali lisusu mingi te, mpe bato oyo batalaka na maninisa bakobungisa kitoko na bango ;


Yesu azongisaki : — Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye.


Moyize azalaki na mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama tango akufaki. Miso na ye elembaki te mpe makasi na ye esilaki te.


Mokolo moko na butu, Nganga-Nzambe Eli azalaki ya kolala na esika na ye ; miso na ye elembaki mpe akokaki lisusu komona te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ