Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 26:8 - Mokanda na Bomoi

8 Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 26:8
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki : — Azali ndeko na ngai ya mwasi. Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko.


Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye : — Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ? » Izaki azongisaki : — Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye.


Mokolo moko, nazalaki kotala wuta na madusu ya lininisa ya ndako na ngai,


Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi ; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.


Molingami na ngai azali lokola mboloko to mwana ya mbuli. Tala ye wana ! Atelemi na sima ya mir na biso, azali kotala na lininisa, azali kotala na mayele na kiyungulu ya lininisa.


Lokola elenge mobali abalaka moseka, bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ; lokola elenge mobali asepelaka na mobandami na ye ya mwasi, Nzambe na yo mpe akosepela na yo.


Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa, na sima ya bibende, mpe abandaki koganga : « Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye ? Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ